Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 22:4 - Mokanda na Bomoi

4 Soki moko ya bakitani ya Aron azali na bokono na poso ya nzoto lokola maba, bokono ya kobima tofina to makila na nzoto ya mibali, akoki te kolia likabo ya bule kino tango akokoma peto. Ndenge moko mpe, akozala mbindo soki asimbi eloko oyo ekomi mbindo mpo ete etuti ebembe to mobali oyo abimisi mayi ya mibali ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 22:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki nyama oyo bozali na ndingisa ya kolia ekufi, moto nyonso oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo kino na pokwa ;


Elamba nyonso to eloko nyonso oyo esalema na poso ya nyama oyo ekweyeli mayi ya mibali, esengeli basukola yango na mayi, mpe ekozala mbindo kino na pokwa.


Bongo bagato oyo ekotikala, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Yawe ayebisaki Moyize : « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron : ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye,


Akoki na ye kolia bilei nyonso oyo bakobonzela Ngai Nzambe na ye, bilei ya bule mpe bilei oyo eleki bule.


Mosakoli Aje alobaki : — Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo ? Banganga-Nzambe bazongisaki : — Iyo, ekokoma mbindo.


Napesi yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola ekateli ya libele na libela, biloko nyonso oyo bana ya Isalaele bakotiaka pembeni mpo na kobonza epai na Yawe lokola makabo ya bule. Ezali boyokani ya seko, oyo ekobongwanaka te liboso ya Yawe mpo na yo mpe bakitani na yo. »


Tala eteni oyo okozwa kati na makabo ya bule oyo eleki kitoko, oyo batumba na moto te : makabo nyonso oyo bakomemela Ngai lokola makabo oyo eleki bule, ezala makabo ya bagato to bambeka mpo na masumu to bambeka nyonso ya kozongisa boyokani ; biteni wana nyonso ekozala mpo na yo elongo na bana na yo.


Kasi soki moto oyo amikomisaki mbindo amipetoli, bakolongola ye kati na lisanga ; pamba te akomisi mbindo Esika ya bule ya Yawe. Mpe lokola basopeli ye te mayi ya bopetoli na nzoto, akozala mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ