Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 22:33 - Mokanda na Bomoi

33 Nabimisaki bino na mokili ya Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Nazali Yawe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 22:33
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.


Nazali Yawe oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Boye bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule.


Bokosalela bimekelo ya malamu, bakilo ya malamu, efa ya malamu ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito.


Bokobebisa te lokumu ya Kombo na Ngai ya bule, mpo ete bana ya Isalaele bayeba solo ete Ngai nazali Mosantu. Ezali Ngai Yawe nde nabulisaki bino.


Ngai nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ; mpo na kopesa yo mokili ya Kanana, mpe na kozala Nzambe na yo.


Nazali Yawe, Nzambe na bino ; nabimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Solo, nazali Yawe, Nzambe na bino. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ