30 Esengeli bolia yango kaka mokolo wana. Bokotika eloko moko te kino na tongo. Nazali Yawe.
Kasi na mokolo yango ya misato, mbeka yango ekokoma mbindo ; soki moto moko alie yango, nakondima yango lisusu te.
Tango bokobonza mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe, bobonza yango na lolenge oyo ekosala ete Nzambe andima bino.
Bobatela mitindo na Ngai mpe bosalela yango. Nazali Yawe.