Levitike 22:21 - Mokanda na Bomoi21 Ndenge moko mpe, soki moto alingi kobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani oyo azwi kati na bangombe, bameme to bantaba, mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, nyama yango esengeli kozala ezanga mbeba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.