Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 22:18 - Mokanda na Bomoi

18 « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele : ‹ Soki moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na Isalaele alingi kobonza mbeka ya kotumba epai na Yawe mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 22:18
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molevi Kore, mwana mobali ya Yimina, oyo azalaki mokengeli ekuke ya ngambo ya este azalaki na mokumba ya koyamba makabo oyo bato bazalaki kopesa epai ya Nzambe, wuta na mokano ya mitema na bango ; azalaki mpe na mokumba ya kokabola makabo oyo bazalaki kokongola mpo na Yawe mpe makabo ya bule.


Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso.


Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso,


Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola ; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi.


pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini ?


Posa ya motema na ngai ezali : kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.


Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe ! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Nakokota kati na Ndako na Yo, nakomemela Yo makabo ya kotumba, nakokokisa bandayi na ngai epai na Yo.


Mwana meme to mwana ntaba oyo bakopona esengeli kozala ya mobali, ya mobu moko mpe ezanga mbeba.


Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.


Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba.


« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme.


Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango ;


Moto nyonso kati na bana ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na bango, oyo akokende bokila mpe akokanga nyama ya zamba to ndeke oyo baliaka, asengeli kosopa makila na yango mpe kozipa yango na mabele, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango.


Bokobakisa makabo oyo na likolo ya makabo oyo bokobonzela Ngai na mikolo ya Saba ya Yawe, na likolo ya bakado na bino, na likolo ya makabo na bino mpo na kokokisa ndayi to na likolo ya makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko.


Soki abonzi mbeka na ye ya boyokani mpo ete apesaki elaka, na kolapa ndayi to wuta na mokano ya motema na ye moko, mbeka esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango. Kasi soki ndambo etikali, ekoliama na mokolo oyo ekolanda.


Botumba farine oyo batia levire lokola likabo ya kozongisa matondi, mpe bobeta tolo mpo na makabo na bino, oyo bokati kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. Bino bana ya Isalaele, bolobela yango na mongongo makasi, pamba te bolingaka nde kosala bongo, elobi Nkolo Yawe.


Babangaki mpe bayokaki somo makasi liboso ya Yawe ; babonzelaki Ye bambeka mpe bapesaki Ye bilaka.


Bato oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko ezanga tina babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.


« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.


bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.


Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi.


Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge.


Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino.


Okosala feti ya Baposo mpo na Yawe, Nzambe na yo ; okobonzela Ye makabo wuta na mokano ya motema na yo moko kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ