Soki, wana bazali mbindo, balie yango, bakomemisa bana ya Isalaele ngambo oyo ekosala ete bapesa likabo mpo na kozongisa boyokani, pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisaka bango mpo na mosala na Ngai. › »
« Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele : ‹ Soki moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na Isalaele alingi kobonza mbeka ya kotumba epai na Yawe mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko,