Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 22:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kasi soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe akufisi mobali to akabwani na mobali, bongo amiboteli mwana te mpe azongi kovanda na ndako ya tata na ye lokola tango azalaki elenge, akoki kolia biloko ya ndenge moko na tata na ye ; kasi moto oyo azali Nganga-Nzambe te akolia yango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 22:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi : « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye.


Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.


Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Tala mibeko na tina na Pasika : ‹ Mopaya moko te akoki kolia yango.


Kaka bango nde bakolia makabo oyo na nzela na yango mosala ya bolimbisi masumu esalemaki tango babulisaki bango mpo na mosala ya bonganga-Nzambe ; kasi moto oyo abulisama te akoki kolia yango te, pamba te ezali bule.


Na esika ete bomipesa na mosala ya biloko na Ngai ya bule, bino bozali nde kopesa mosala na Ngai epai ya bapaya, kati na Esika na Ngai ya bule.


Kati na bambeka ya boyokani oyo bana ya Isalaele bakobanda kobonza, yo mpe bana na yo, bokobanda kolia, na Esika ya bule, lokola eteni oyo epesameli bino, tolo oyo ekobonzama lokola likabo ya kotombola mpe mopende ya banyama oyo ekobonzama epai ya Yawe.


Moto moko te oyo azali na libota ya Banganga-Nzambe te akoki kolia makabo ya bule : ezala mopaya oyo Nganga-Nzambe abengi to mosali oyo Nganga-Nzambe azwi na mosala.


Soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe abali mobali oyo azali Nganga-Nzambe te, akolia te makabo ya bule.


Sima na kobima na ndako ya mobali wana, mwasi yango akoki kobala mobali mosusu.


Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ