10 Moto moko te oyo azali na libota ya Banganga-Nzambe te akoki kolia makabo ya bule : ezala mopaya oyo Nganga-Nzambe abengi to mosali oyo Nganga-Nzambe azwi na mosala.
Kaka bango nde bakolia makabo oyo na nzela na yango mosala ya bolimbisi masumu esalemaki tango babulisaki bango mpo na mosala ya bonganga-Nzambe ; kasi moto oyo abulisama te akoki kolia yango te, pamba te ezali bule.
Kasi soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe akufisi mobali to akabwani na mobali, bongo amiboteli mwana te mpe azongi kovanda na ndako ya tata na ye lokola tango azalaki elenge, akoki kolia biloko ya ndenge moko na tata na ye ; kasi moto oyo azali Nganga-Nzambe te akolia yango te.
Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. »
ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ?
Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.