Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda : — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki : — Babimisa ye mpe batumba ye na moto !
Lisusu, bokobatela mokolo ya Saba, pamba te ekozala mpo na bino mokolo ya bule. Moto nyonso oyo akobuka mobeko yango, basengeli koboma ye ; mpe moto nyonso oyo akosala mosala ata ya lolenge nini na mokolo yango, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.
Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »
Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.
Soki mobali abali mwasi mpe mama ya mwasi, ezali likambo ya mabe koleka. Bango nyonso misato : mobali mpe basi nyonso mibale, esengeli kotumba bango na moto, mpo ete mabe moko te ezala kati na bino.
Likolo na bino, nakopamela bakitani na bino, nakobwakela bino basalite ya banyama na bino na bilongi, salite ya banyama oyo bobonzaka na mikolo ya bafeti na bino, mpe bakomema bino nzela moko na basalite yango.
esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa : asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
Mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moboti ya malamu ; mpe bana na ye basengeli kozala bandimi, bana ya mobulu te mpe ya kilikili te.
Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »
Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! » Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto.