4 Lokola azali mokambi kati na bato na ye, akoki te komikomisa mbindo ; noki te akobebisa bosantu mpe lokumu na ye.
Mpo na ndeko na ye ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te, oyo azali nanu na maboko na ye awa abali nanu te ; Nganga-Nzambe akoki komikomisa mbindo.
Banganga-Nzambe bakoki te komikokola suki ya moto, kokata mandefu na bapembeni to kokata nzoloko na banzoto na bango.