Levitike 21:23 - Mokanda na Bomoi23 Kasi mpo na mbeba ya nzoto na ye, akoki te kopusana pembeni ya rido ya Esika ya bule to ya etumbelo, mpo ete abebisa te bosantu ya Esika na Ngai ya bule, pamba te Ngai nazali Yawe, mpe ezali Ngai nde nabulisaki Banganga-Nzambe mpo na mosala na Ngai. › » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango ; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe.