Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 21:21 - Mokanda na Bomoi

21 Kati na bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, moko te oyo azali na mbeba na nzoto akopusana pembeni ya etumbelo mpo na kobonza makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Lokola azali na mbeba na nzoto na ye, akoki te kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 21:21
4 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


« Loba na Aron : ‹ Kati na bana na yo nyonso na milongo oyo ekoya, moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto na ye, akoki kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye.


Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango ; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe.


Bato nyonso ya Isalaele basengeli komona bango lokola basantu, pamba te babonzaka bilei ya Nzambe na bino. Bomona bango basantu mpo ete Ngai Yawe oyo naponi Isalaele mpe nakomisi bino basantu, nazali Mosantu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ