Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te : « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! » Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te : « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »
Bokobonza te epai na Yawe nyama oyo ekufa liso to ezoka, oyo ezali kotambola tengu-tengu to oyo ezali na bokono na poso ya nzoto, oyo ezali na makwanza to na mapalata ; bokoki te kotia nyama ya boye na likolo ya etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
Bokobonza kaka epai na Yawe, nyama oyo mapumbu na yango bafina penza to banika, balongola to bakata ; bokoki kosala bongo te kati na mboka na bino moko.