Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 21:15 - Mokanda na Bomoi

15 Na bongo, akobebisa te bosantu ya bakitani na ye kati na bato na ye ; pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisi ye. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 21:15
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »


Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.


pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. »


mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.


« Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule.


Bomibulisa mpe bozala bule, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.


Akoki kobala te mwasi oyo akufisa mobali, mwasi oyo babengani na libala to mwasi oyo abebisa lokumu na ye na kosala kindumba ; kasi akobala kaka, kati na bato na ye, mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.


Bato nyonso ya Isalaele basengeli komona bango lokola basantu, pamba te babonzaka bilei ya Nzambe na bino. Bomona bango basantu mpo ete Ngai Yawe oyo naponi Isalaele mpe nakomisi bino basantu, nazali Mosantu.


Soki, wana bazali mbindo, balie yango, bakomemisa bana ya Isalaele ngambo oyo ekosala ete bapesa likabo mpo na kozongisa boyokani, pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisaka bango mpo na mosala na Ngai. › »


Bato ya Yuda batamboli na boyengebene te, bakotisi likambo ya nkele kati na Isalaele mpe na Yelusalemi, pamba te bato ya Yuda babebisi bosantu ya Esika ya bule ya Yawe, Esika ya bule oyo Yawe alingaka makasi : babali basi oyo basambelaka nzambe mopaya.


Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !


Bino, bakufi miso, bozali penza bazoba ! Eloko nini eleki motuya : wolo to Tempelo oyo ekomisaka wolo bule ?


Nzokande, soki mapa ya liboso oyo babonzeli Nzambe ezali bule, elingi koloba ete mapa nyonso oyo etikali ezali mpe bule ; soki mosisa ya nzete ezali bule, elingi koloba ete bitape na yango mpe ezali bule.


Pamba te, mobali oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzokande bazali bule.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ