Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 21:12 - Mokanda na Bomoi

12 Azali na ndingisa te ya kotika Esika ya bule ya Nzambe na ye to kobebisa bosantu na yango, pamba te abulisamaki na nzela ya mafuta ya epakolami ya Nzambe na ye. Nazali Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 21:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : abulisama mpo na Yawe.


Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;


Kasi bino, bosengeli te kolongwa liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bokokufa ; pamba te bapakola bino mafuta mpo na kosala mosala ya Yawe. » Aron mpe bana na ye batosaki makambo oyo Moyize alobaki na bango.


Mokonzi ya Banganga-Nzambe asengeli kobala mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.


Moyize azwaki na etumbelo, mafuta ya epakolami mpe ndambo ya makila ; asopelaki yango Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. Bongo abulisaki Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango.


Na mikolo nyonso ya libulisi na ye mpo na Yawe, asengeli te kosimba ebembe ;


ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ