Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 20:6 - Mokanda na Bomoi

6 Nakotombokela lisusu bato nyonso oyo balandaka moto oyo asololaka na bakufi mpe banganga-kisi mpo na kosalela banzambe ya bikeko. Nakolongola bango kati na bato na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 20:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa ; obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.


Okotika te na bomoi mwasi oyo asalaka maji.


Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa.


Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? »


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nazwi mokano ya komemela bino pasi mpe ya kobebisa mokili nyonso ya Yuda.


Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.


Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,


Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango ;


Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te.


Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.


Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »


ngai nakotombokela moto yango mpe libota na ye, nakolongola bango na ekolo na bango, elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kosalela nzambe Moloki.


Tango nyonso bokotala bitendi yango, bokobanda kokanisa mitindo nyonso ya Yawe, mpo ete botosa yango mpe botika kolanda baposa ya mitema na bino mpe ya miso na bino, oyo ekoki kotindika bino na kobungisa boyengebene.


Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ