27 Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »
Manase abonzaki na moto, lokola mbeka, bana na ye ya mibali, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji ; atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; na bongo, apelisaki kanda na Ye.
Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
ete apesa malako oyo epai ya bana ya Isalaele : « Soki moto moko ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na Isalaele abonzi moko kati na bana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, esengeli baboma ye. Bato ya mokili bakobamba ye mabanga.
Nakotombokela lisusu bato nyonso oyo balandaka moto oyo asololaka na bakufi mpe banganga-kisi mpo na kosalela banzambe ya bikeko. Nakolongola bango kati na bato na bango.
« Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.
Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.
Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga.
Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.