Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 20:25 - Mokanda na Bomoi

25 Yango wana bosengeli kosala bokeseni kati na nyama oyo ezali mbindo mpe oyo ezangi mbindo, kati na ndeke oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto. Bosengeli te komikomisa mbindo na nzela ya nyama, ya ndeke to ya nyama nyonso oyo etambolaka na libumu, oyo natiaki pembeni mpo ete bino mpe bomona yango lokola mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 20:25
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu.


mpo ete boyeba kokesenisa eloko ya bule mpe eloko oyo ezangi bule, eloko ya peto mpe eloko ya mbindo ;


Alobaki na bango : — Boyebi malamu ete mibeko na biso epekisa Moyuda kosangana na Mopagano to kokende kotala Mopagano ; kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli te komona moto moko mbindo to bosoto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ