Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 20:24 - Mokanda na Bomoi

24 Boye nayebisaki bino : ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi ; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 20:24
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te, Nkolo Yawe, Yo moko nde oponaki bango kati na mabota nyonso ya mokili mpe otiaki bango pembeni, mpo ete bazala libula na Yo ndenge olobaki na mowumbu na Yo, Moyize, tango obimisaki batata na biso na Ejipito. »


Tango Yawe akokotisa yo na mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi, mokili oyo alakaki na batata na bino, na nzela ya ndayi, ete akopesa bino yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, okosala feti oyo na sanza oyo.


Mpe nalobi : « Nakolongola bino na minyoko ya Ejipito mpo na komema bino na mokili ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Yawe alobaki na Moyize : — Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito ; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo.


Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo ? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili.


Bokende na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Mpo na Ngai, nakotambola elongo na bino te, pamba te bozali batomboki, noki te nakosilisa koboma bino na nzela.


Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi ; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. »


« Tango bokokota na mokili ya Kanana oyo napesi bino, soki natie litono ya maba na ndako moko ya mokili oyo napesi bino,


Bozala bule, bato oyo babulisami mpo na Ngai ; pamba te Ngai Yawe, nazali Bule ; nalongolaki bino kati na bikolo mosusu, natiaki bino pembeni, mpo ete bozala bato na Ngai moko.


Tala, wuta na likolo ya mabanga, nazali komona bango ; wuta na likolo ya bangomba, nazali kotala bango. Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko, bazali komitanga na molongo ya bikolo te.


Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino.


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali kati na mokili mpo ete bozala libota ya motuya mpo na Ye.


pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ