Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 20:22 - Mokanda na Bomoi

22 Bobatela mpe botosa bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso ; bosalela yango mpo ete mokili epai wapi nakomema bino mpo na kovanda esanza bino te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 20:22
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo ete babatela mitindo na Ye mpe batosa mibeko na Ye. Bokumisa Yawe !


Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango : « Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »


Nazali kobelela Yo na motema na ngai mobimba : « Yawe, yanola ngai ; nakotosa mitindo na Yo !


Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo, mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali mpo na libela.


Nakumisaka Yo mbala sambo na mokolo mpo na mibeko ya bosembo na Yo.


Tika ete bibebu na ngai ekumisa Yo, pamba te olakisaka ngai mitindo na Yo !


Tika ete nazala na bomoi mpo na kokumisa Yo, mpe tika ete mibeko na Yo esunga ngai !


Molimo na ngai ezalaka tango nyonso na posa makasi ya koyeba mibeko na Yo.


Tika ete motema na ngai ezanga pamela mpo na kotosa mitindo na Yo, mpo ete nakufa soni te.


Yawe alobaki na Moyize : — Tala mibeko oyo okoyebisa bana ya Isalaele :


Nakotia Molimo na Ngai kati na bino mpe nakosala ete botosa bikateli na Ngai mpe bobatela mibeko na Ngai na bokebi.


Bokobatela bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso mpe bokosalela yango. Nazali Yawe. › »


Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.


Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito ;


Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki : « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ