Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 20:20 - Mokanda na Bomoi

20 Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi ya ndeko ya tata na ye to mwasi ya ndeko ya mama na ye, asambwisi ndeko ya tata na ye to ya mama na ye ; bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango mpe bakokufa bazanga bana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 20:20
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaka na bana to bakitani te kati na bato na ye, azalaka ata na moto moko te oyo atikala na bomoi, na esika oyo avandaka.


Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda !


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Koma kombo ya moto oyo lokola moto oyo abota te, lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye, pamba te moko te kati na bana na ye akolonga, moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »


Okosambwisa te ndeko mobali ya tata na yo na kosangisa nzoto na mwasi na ye. Azali mama na yo.


Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya ndeko na ye ya mobali, ezali likambo ya mbindo ; asambwisi ndeko na ye ya mobali ; bakokufa bazanga bana.


Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. »


Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange.


Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ