Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 20:14 - Mokanda na Bomoi

14 Soki mobali abali mwasi mpe mama ya mwasi, ezali likambo ya mabe koleka. Bango nyonso misato : mobali mpe basi nyonso mibale, esengeli kotumba bango na moto, mpo ete mabe moko te ezala kati na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 20:14
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okosangisa nzoto te na mama mpe na mwana na ye ya mwasi to na mwana mwasi ya mwana na ye ya mobali mpe ya mwasi ; pamba te bazali makila moko mpe ekozala likambo ya nkele penza na miso ya Nzambe.


Mwana mwasi ya Nganga-Nzambe oyo abebisi lokumu na ye na kosala kindumba asambwisi nde tata na ye ; boye esengeli kotumba ye ya bomoi na moto.


Bazali konyata mito ya babola ndenge banyataka putulu ya mabele, mpe bazali kokata na bosembo te makambo ya bato bakelela. Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto na mwasi moko ya makangu ; mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.


« Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mama ya mwasi na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »


Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! » Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ