12 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya mwana na ye ya mobali ; bango mibale esengeli koboma bango, pamba te basali bosoto : makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye : — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. Tamari atunaki : — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto ?
Yuda alobaki : — Ndanga nini olingi ete nasimbisa yo ? Tamari azongisaki : — Lopete na yo, singa na yo mpe lingenda na yo, oyo osimbi na loboko. Boye Yuda apesaki ye yango, asangisaki na ye nzoto mpe Tamari akomaki na zemi.