10 Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.
Akomaki na zemi, mpe atindaki maloba epai ya Davidi : « Nazali na zemi. »
Davidi alobaki na Natan : — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki : — Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te.
Pamba te elingaki kozala likambo ya soni, mpe lisumu ya boye ebongi na esambiselo ya basambisi.
Soki motema na ngai ekosamaki na mwasi to soki natalaki na makanisi mabe ekuke ya mozalani na ngai,
Okosalaka ekobo te.
Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.
Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !
mpe asangisi na ye nzoto, amikomisi mbindo atako esalemi na nkuku mpe moto moko te amoni ye ; mpe ezala mobali na ye ayebi eloko te.