Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 Nganga-Nzambe akolongola na makabo ya mbuma eteni oyo esengeli kobonzama lokola ekaniseli mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 2:9
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotumba meme mobimba ya mobali na etumbelo ; ezali mbeka ya kotumba mpo na Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama ; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.


Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Bongo Nganga-Nzambe asengeli kotumba eteni ya likabo elongo na ansa nyonso lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Akomema yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, oyo moko kati na bango akozwa loboko mobimba ya farine mpe mafuta elongo na ansa nyonso, mpe akotumba yango na etumbelo lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Bakomema epai na Yawe makabo ya mbuma oyo babongisi mpe bakopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akomema yango na etumbelo.


Na molongo moko na moko, okosopa ansa ya peto oyo ekotumbama na esika ya gato lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, mpe ekozala ekaniseli.


Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani ; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama.


Sima, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akozwa loboko moko lokola eteni ya ekaniseli mpe akotumba yango na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na masumu.


Mwana mobali ya Aron oyo bakopakola mafuta mpo na kokitana na Aron lokola Nganga-Nzambe akobonza mpe likabo yango : ezali likabo ya libela mpo na Yawe mpe bakotumba yango mobimba.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »


Nganga-Nzambe akotondisa na loboko na ye, bambuma oyo akozwa kati na likabo yango ya zuwa lokola ekaniseli, mpe akotumba yango na likolo ya etumbelo ; sima na yango, akomelisa mwasi mayi.


Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ