Bazalaki na mokumba ya kotanda mapa na mesa, kobongisa farine mpo na makabo ya bagato ezanga levire, bagalete mpe bagato batumba na kikalungu, mpe bagato basangisa na mafuta mpe biloko nyonso oyo bamekelaka kilo mpe molayi.
Likabo nyonso ya gato oyo batumbi na fulu ya moto to bakalingi na kikalungu to mpe batumbi na likolo ya manzanza ezali ya Nganga-Nzambe oyo abonzi yango.