Yawe alobaki na Moyize : — Zwa biloko ya mike-mike ya solo kitoko : sitakite, onikisi, galibanumi mpe ansa oyo basangisa na eloko mosusu te ; biloko nyonso ezala kilo moko.
Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.
Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive.