Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye : — Pesa yango na bato mpo ete balia !
« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka.
Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga.
Nganga-Nzambe akobonza na kotombola, liboso ya Yawe, bana meme yango mibale elongo na mapa ya bambuma ya liboso. Ekozala makabo ya bule mpo na Ngai Yawe mpe ekozala ya Nganga-Nzambe.
Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. ›
moko na moko kati na bino akozwa ndambo ya bambuma ya liboso ya biloko nyonso oyo akozwa na mabele ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino ; akotia yango na kitunga mpe akokende na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye.
Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.