Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Okomema yango epai na Yawe lokola likabo ya bambuma ya liboso, kasi bokobonza yango te na etumbelo lokola makabo ya solo kitoko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 2:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki


Tango kaka bapanzaki sango ya mitindo oyo, bato ya Isalaele bapesaki na esengo bambuma na bango ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, ya mafuta ya nzoyi mpe ya biloko nyonso oyo ebimaka na bilanga. Bamemaki lisusu biloko ebele lokola eteni ya zomi ya nyonso.


Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo : ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango ; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango.


Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.


Bokosala feti ya Baposo mpo na kosepela na tina na bambuma ya liboso ya ble oyo ekomeli, mpe feti ya kobuka bambuma na suka ya mobu.


« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka.


Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola ; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe.


Na likolo ya mbeka na ye ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi, akobakisa likabo ya bagato oyo esalemi na farine batia levire.


Bobonza gato oyo ewuti na farine ya liboso oyo bokonika, mpe bobonza yango lokola likabo oyo ewuti na mbuma ya liboso oyo elanga ya ble eboti.


Napesi yo mafuta nyonso ya olive oyo eleki kitoko, vino ya sika mpe ble oyo bapesi epai na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na bango.


Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi : azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.


Sik’oyo oh Yawe, tala, namemi bambuma ya liboso ya mabele oyo opesaki ngai. » Sima na yango, okotia kitunga liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okogumbama liboso na Ye.


Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ