Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 2:11 - Mokanda na Bomoi

11 Likabo moko te ya mbuma, oyo bokomemela Yawe ekozala na levire, pamba te bokotumba te levire to mafuta ya nzoyi lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 2:11
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo.


Okozwa yango lisusu na maboko na bango mpe okotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Okobonzela Ngai te makila ya nyama elongo na mapa batia levire ; okobomba te kino lobi na tongo mbeka oyo babonzi mpo na Pasika.


Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi, pamba te ezalaka kitoko ! Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala elengi na lolemo na yo.


Soki omoni mafuta ya nzoyi, lia oyo ekoki na yo, pamba te soki olie yango na lokoso, okosanza yango.


Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele, mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.


akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Bakotumba yango te na levire : ezali eteni oyo napesi bango kati na bambeka na Ngai oyo etumbami na moto : ezali eloko ya bule penza lokola mbeka mpo na masumu mpe mpo na kozongisa boyokani.


Yesu alobaki na bango : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !


Yesu akebisaki bango : — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode !


Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta !


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Mwa levire moke evimbisaka potopoto nyonso ya mapa.


mpo ete botambola te kolanda baposa mabe ya nzoto, kasi kolanda mokano ya Nzambe, na mikolo oyo botikali na yango ya kobika awa na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ