Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 19:8 - Mokanda na Bomoi

8 Moto nyonso oyo akolia yango, akomema mokumba ya mabe na ye mpo ete asambwisi eloko oyo ezali bule mpo na Yawe, mpe basengeli kobengana ye kati na bato na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 19:8
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo akomekola mafuta yango mpe akosopa yango na nzoto ya moto oyo abulisami te, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. »


Kasi na mokolo yango ya misato, mbeka yango ekokoma mbindo ; soki moto moko alie yango, nakondima yango lisusu te.


Tango okobuka mbuma ya bilanga na yo, okobuka yango te kino na mondelo, mpe okozonga te mpo na kolokota mbuma oyo ekokweya.


Banganga-Nzambe basengeli te kobebisa lokumu ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe.


« Soki moto ayoki mbela ya elakeli mabe na tina na likambo oyo amonaki mpe ayebi, bongo aboyi kotatola yango, asali masumu mpe amemi ngambo.


Nzokande, soki moto ya mbindo alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.


Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ