Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki : — Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito.
Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu.
Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.