Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 19:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 19:31
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batumbaki na moto lokola mbeka bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi. Basalelaki soloka mpe kindoki, mpe bamikabaki mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. Boye batumbolaki kanda ya Yawe.


Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe.


Joziasi abomaki mpe bato oyo basololaka na milimo ya bakufi, bamoni makambo, bikilakila, banzambe ya bikeko, mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na mokili ya Yuda mpe ya Yelusalemi. Asalaki bongo mpo na kokokisa mitindo oyo ekomama kati na buku oyo Nganga-Nzambe Ilikia amonaki kati na Tempelo ya Yawe.


Saulo akufaki mpo ete atosaki Yawe te, abatelaki Liloba na Yawe te mpe akendeki kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi, na esika ya kotuna makambo epai na Yawe.


Manase abonzaki na moto, lokola mbeka, bana na ye ya mibali, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji ; atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; na bongo, apelisaki kanda na Ye.


Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa.


Okokitisama solo na se, okoloba wuta na mabele, mpe maloba na yo ekobanda kobima na mongongo ya se wuta na putulu. Mongongo na yo ekokoma kobima wuta na se ya mabele lokola mongongo ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi ; mpe wuta na putulu, maloba na yo ekobima na mongongo ya se.


Batoli nyonso oyo osili kozwa epai na bango elembisi yo nzoto ! Tika ete bato ya soloka oyo bayekolaka bikelamu nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu, mpe bayebisaka na ebandeli nyonso ya sanza makambo oyo ekoya, batelema wana mpe babikisa yo !


Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? »


Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te.


Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »


Bazalaki kolanda ye mpo ete, wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji.


kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana,


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ