Levitike 19:3 - Mokanda na Bomoi3 Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule ; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,
Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? ›