24 Na mobu ya minei, bokobulisa bambuma na yango nyonso ekozala bule mpo na Yawe lokola litatoli ya kozongisa matondi epai na Ye.
Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.
Tango bokokota na mokili ya Kanana, bokolona banzete ya lolenge nyonso oyo ebotaka mbuma. Na mibu misato, bokozwa bambuma na yango nyonso lokola bambuma ya mbindo ; boye bokolia yango te.
Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
Okopesa ye bambuma na yo ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta mpe bapwale nyonso ya liboso oyo okolongola na bameme na yo ;