Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 19:22 - Mokanda na Bomoi

22 Bongo na nzela ya meme yango ya mbeka mpo na masumu, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mobali yango liboso ya Yawe, mpe masumu oyo asilaki kosala ekolimbisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 19:22
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe mobali asengeli komema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani meme ya mobali oyo akobonza epai na Yawe lokola mbeka mpo na masumu.


Tango bokokota na mokili ya Kanana, bokolona banzete ya lolenge nyonso oyo ebotaka mbuma. Na mibu misato, bokozwa bambuma na yango nyonso lokola bambuma ya mbindo ; boye bokolia yango te.


Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato ; mpe bakolimbisama.


Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’


Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani ; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama.


Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. ’ › »


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ