Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali !
Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.
Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.
Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.
Pamba te mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala makambo ya mabe, banga mokonzi, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na kokokisa kanda ya Nzambe mpe kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe.
Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; kati na bandako na bango, somo ekokonza ; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.
Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »
Soki bozali kokokisa Mobeko ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kati na Makomi : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, » wana bozali kosala malamu.