Bongo Polo alobaki na ye : — Nzambe akobeta yo, yo mir oyo bapakola langi ya pembe ! Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga, nzokande yo nde moto obuki Mobeko mpo ete opesi mitindo ete babeta ngai !
Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »
pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te,