Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 19:10 - Mokanda na Bomoi

10 Okobuka mpe te mbuma ya vino oyo ekotikala to kolokota oyo ekokweya. Okotika yango mpo na babola to bapaya : nazali Yawe Nzambe na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 19:10
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka ; lokola tango baningisaka nzete mpo na kobuka bambuma ya olive, bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape, mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolo ndenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzete to tango balokotaka bambuma ya vino soki basilisi kobuka yango.


Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, bakotika ata mbuma moko te ya vino. Soki miyibi bayei epai na yo na butu, bakobebisa ndenge balingi.


Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu.


Okoyiba te, okoloba lokuta te, moto moko te akosa moninga na ye.


Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Tango okobuka mbuma ya bilanga na yo, okobuka yango te kino na mondelo, mpe okozonga te mpo na kolokota mbuma oyo ekokweya.


Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »


Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino : yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo


« Soki miyibi to babebisi babimeli yo na butu, likama ya ndenge nini ezali kozela yo ? Boni, bakozwa kaka biloko oyo bazali na yango posa te ? Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, boni, bakotika ata ndambo ya maboke ya vino ?


Tala, mawa na ngai ! Nakomi lokola moto oyo azali koluka kobuka bambuma na eleko ya elanga, na tango oyo bazongelaka kobuka bambuma ya vino oyo etikalaka. Kasi ezali ata na liboke moko te ya bambuma ya vino ya kolia to mbuma ata moko te ya figi ya sika oyo nasepelaka kolia.


Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala.


Tango bokoningisa bambuma ya olive na banzete na yango, bobuka te oyo ekotikala na bitape ; botika yango mpo na bapaya, bana bitike mpe mpo na basi bakufisa mibali.


Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali.


Kasi Jedeon azongiselaki bango : — Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala ? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri ?


Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ