Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 18:8 - Mokanda na Bomoi

8 Okosangisa nzoto te na mwasi mosusu ya tata na yo, soki te okosambwisa tata na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 18:8
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :


Mobulu lokola mayi, okokende liboso te, pamba te omataki na mbeto ya tata na yo, esika oyo ngai nalalaka, mpe okomisi yango mbindo.


Na mboka na yo, mibali basangisaka nzoto na basi ya batata na bango mpe bazwaka na makasi basi oyo bazali komona sanza na bango, na tango oyo bazali mbindo.


Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya tata na ye, asambwisi tata na ye ; bango mibale, esengeli koboma bango : makila na bango ekotangama na mito na bango moko.


Bazali konyata mito ya babola ndenge banyataka putulu ya mabele, mpe bazali kokata na bosembo te makambo ya bato bakelela. Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto na mwasi moko ya makangu ; mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.


Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano : mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye.


Mwana mobali moko te akoki kobala mwasi ya tata na ye, noki te akosambwisa mbeto ya tata na ye.


« Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ