Na mboka na yo, mibali basangisaka nzoto na basi ya batata na bango mpe bazwaka na makasi basi oyo bazali komona sanza na bango, na tango oyo bazali mbindo.
Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya tata na ye, asambwisi tata na ye ; bango mibale, esengeli koboma bango : makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
Soki mobali abali mwasi mpe mama ya mwasi, ezali likambo ya mabe koleka. Bango nyonso misato : mobali mpe basi nyonso mibale, esengeli kotumba bango na moto, mpo ete mabe moko te ezala kati na bino.
« Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »