Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 18:27 - Mokanda na Bomoi

27 Pamba te bato oyo bazalaki kovanda na mboka oyo liboso na bino babandaki kosala makambo oyo nyonso, bongo mboka ekomaki mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 18:27
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki lisusu na mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule kati na mokili ya Yuda : bamipesaki na kosala makambo ya nkele kolanda bikolo ya bapaya oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.


Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango, atumbaki ata mwana na ye ya mobali na moto lokola mbeka, kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele.


Manase asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.


Bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bato bakomaki lisusu kosala mabe koleka, balandaki misala nyonso ya nkele ya bikolo ya bapaya mpe babebisaki bosantu ya Tempelo ya Yawe oyo Ye moko Yawe abulisaki na Yelusalemi.


Bakomaki bato ya lofundu makasi mpe bakomaki kosala makambo ya mbindo na miso na Ngai. Yango wana, nalimwisi bango ndenge ozali komona.


Na mboka na yo, moko na moko azali kosala makambo ya mbindo elongo na mwasi ya moninga na ye, mosusu azali kokomisa mwasi ya mwana na ye mbindo, mpe mosusu lisusu azali kosangisa nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye.


Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.


Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo.


Kasi, ezala mwana mboka to mopaya oyo bazali kati na bino, bosengeli kotosa malako mpe bikateli na Ngai ; mpe bosengeli koboya kosala makambo nyonso oyo ya nkele na miso ya Nzambe.


Bino bokeba ete bokomisa mboka mbindo te, mpo ete yango esanza bino te ndenge esanzaki bato ya bikolo oyo bazalaki liboso na bino.


mpo ete bateya yo te kosala makambo nyonso ya nkele oyo bango basalaka mpo na lokumu ya banzambe na bango ; noki te okosala masumu liboso ya Yawe, Nzambe na yo.


Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule.


Pamba te Yawe, Nzambe na yo, amonaka nkele, moto nyonso oyo asalaka makambo wana, moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo te.


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ