Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 18:26 - Mokanda na Bomoi

26 Kasi, ezala mwana mboka to mopaya oyo bazali kati na bino, bosengeli kotosa malako mpe bikateli na Ngai ; mpe bosengeli koboya kosala makambo nyonso oyo ya nkele na miso ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 18:26
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki lisusu na mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule kati na mokili ya Yuda : bamipesaki na kosala makambo ya nkele kolanda bikolo ya bapaya oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.


Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango ;


Loba na bango : ‹ Moto nyonso ya Isalaele to mopaya nyonso oyo azali kati na bango, oyo akobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu,


Lokola mboka yango moko mpe ekomaki mbindo, napesaki yango mpe etumbu mpo na lisumu na yango ; bongo esanzaki bavandi na yango.


Pamba te bato oyo bazalaki kovanda na mboka oyo liboso na bino babandaki kosala makambo oyo nyonso, bongo mboka ekomaki mbindo.


Boye, bobatela malako na Ngai mpe bolanda ata likambo moko te kati na makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso ete bino boya, mpo ete bomikomisa mbindo te na nzela na yango. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »


Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe.


Yesu azongisaki : — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !


Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.


Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai.


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ