Levitike 18:24 - Mokanda na Bomoi24 Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki : « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango ; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori,
Tokozwa bato zomi kati na bato nkama moko ya mabota nyonso ya Isalaele, tokozwa bato nkama moko kati na bato nkoto moko mpe bato nkoto moko kati na bato nkoto zomi, mpo na kopesa biloko ya kolia epai ya mampinga. Bongo tango mampinga ekokoma na Gibea, na mokili ya Benjame, bakobundisa bato ya Gibea mpo na makambo nyonso ya somo oyo basalaki kati na Isalaele. »