23 Okosangisa nzoto te na nyama, noki te okokoma mbindo elongo na yango. Ndenge moko mpe mwasi akosangisa nzoto te na nyama : ezali kotiola Nzambe.
Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
Moto nyonso oyo akotumba mbeka mpo na nzambe mosusu, basengeli koboma ye ; mbeka ekotumbama kaka mpo na Yawe Ye moko.
Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya mwana na ye ya mobali ; bango mibale esengeli koboma bango, pamba te basali bosoto : makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »