Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 18:20 - Mokanda na Bomoi

20 Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 18:20
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.


Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.


aliaka te bilei na bisika ya bule ya likolo ya bangomba, atalelaka banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele te, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, asangisaka nzoto te na mwasi oyo azali komona sanza na ye,


Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


mpe asangisi na ye nzoto, amikomisi mbindo atako esalemi na nkuku mpe moto moko te amoni ye ; mpe ezala mobali na ye ayebi eloko te.


Yo oyo olobaka na bato ete basala ekobo te, boni, osalaka ekobo ? Yo oyo omipesaka te na banzambe ya bikeko, boni, ozwaka na makasi biloko kati na batempelo ?


Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,


Tala misala ya bomoto : kindumba, misala ya bosoto, pite,


Soki bakangi mobali azali kosangisa nzoto na mwasi ya mobali mosusu, bango nyonso mibale basengeli kokufa. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na Isalaele.


Soki mobali akoti na zamba na mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe asangisi na ye nzoto na makasi, nzokande mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, kaka mobali oyo asali likambo wana nde asengeli kokufa.


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ