Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 18:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 18:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo.


Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.


« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.


mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo naponaki Isalaele, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, epai ya bakitani ya libota ya Jakobi ete nakomimonisa Ngai moko epai na bango kati na Ejipito, nalapaki ndayi mpe nayebisaki bango : ‘ Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’


Nalobaki na bango : ‘ Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye ! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito ! Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’


Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu.


Boye, bobatela malako na Ngai mpe bolanda ata likambo moko te kati na makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso ete bino boya, mpo ete bomikomisa mbindo te na nzela na yango. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »


Bosengeli kotosa bobele mibeko mpe bikateli na Ngai. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Okobuka mpe te mbuma ya vino oyo ekotikala to kolokota oyo ekokweya. Okotika yango mpo na babola to bapaya : nazali Yawe Nzambe na yo.


Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Bolanda te bizaleli ya bikolo oyo nakobengana liboso na bino, pamba te basalaki makambo wana nyonso mpe nayinaki bango.


Bomibulisa mpe bozala bule, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ