Davidi atindaki bantoma mpo na kozwa ye. Batisheba ayaki epai ya Davidi, mpe Davidi asangisaki na ye nzoto. Sima na ye komipetola na mbindo na ye, Batisheba azongaki na ndako na ye.
aliaka te bilei na bisika ya bule ya likolo ya bangomba, atalelaka banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele te, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, asangisaka nzoto te na mwasi oyo azali komona sanza na ye,
Na mboka na yo, mibali basangisaka nzoto na basi ya batata na bango mpe bazwaka na makasi basi oyo bazali komona sanza na bango, na tango oyo bazali mbindo.
Soki mobali asangisi nzoto na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza ; bango mibale, esengeli kobengana bango kati na bato na bango, mpo te basangisaki nzoto na tango mwasi azalaki komona makila na ye ya sanza.