12 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata na yo, azali tata mwasi na yo.
Amirami abalaki Yokebedi, tata mwasi na ye, oyo abotelaki ye Aron mpe Moyize. Amirami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo.
Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, azali ndeko na yo ya mwasi.
Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mama na yo, azali mama leki to mama kulutu na yo.
Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata to ya mama na yo, pamba te ekosambwisa bondeko. Soki moto asali yango, bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango.