11 Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, azali ndeko na yo ya mwasi.
Tamari alobaki na ye : — Te, ndeko na ngai ya mobali ! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele ! Kosala bozoba ya boye te.
Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwana na yo ya mobali to ya mwasi ; kosambwisa ye te.
Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata na yo, azali tata mwasi na yo.
Okosangisa nzoto te na ndeko na yo ya mwasi, ezala na mwana mwasi ya tata na yo to ya mama na yo, oyo abotami na ndako to na libanda ya ndako.